Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 ebotoli Kitshanga


DRCONGO-UNREST-CONFLICT-rdc
DRCONGO-UNREST-CONFLICT-rdc

Batomboki ba M23 bakoti na cite ya Kitshanga nsima na bitumba bazali kozongeli kosala wuto mwa mikolo na mampinga ma Ekolo Congo démocratique mpe mangomba masusu ma basimba manduki na Masisi, na Nord-Kivu.

Bitumba bisalamaki lelo Kilolirwe, Burungu mpe na Kitshana.

Ba M23 bokakaki kokota nzela emema na Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu, na Burungu, kolanda Barometre securitaire ya Kivu.

Bavandi ba Kitshanga batatoli ete basoda ba FARDC, mampinga ma ekolo balongwe bisika bazalaki nsima na bobetani masasi na bayi M23.

Monusco, misala mya ONU mpo na kimya na Ekolo Congo démocratique, elobi koleka bato nkama minei na ndambo bakimi komibatela na base na yango, nsima na bokoti ya M23.

Na liyebisi na yango, M23 epameli bayi mbulamatari koboma bato mingi Kitshanga, Burungu, Kilolwire mpe nzinga nzinga. Bayi mubalamatari nanu bapesi eyano te na yango.

XS
SM
MD
LG