Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Monusco ekuti libuku lyoko na mikuwa ya bato pene na 50 na Nyamamba (Ituri)


BA civili na ba Croix rouge bazali kokunda boko na bakima bitumba babomamaki na camp Savo, Ituri, 4 sanza ya mibale 2022.
BA civili na ba Croix rouge bazali kokunda boko na bakima bitumba babomamaki na camp Savo, Ituri, 4 sanza ya mibale 2022.

Basoda ba kimya ya Monusco bamoni libulu lyoko lizali na bitiki bya nzoto ya bacivili pene na ntuku mitano na mboka Nyamamba, na Ituri.

Nzoto ya ba civili ntuku minei na mibale kati na bango basi zomi na mibale mpe bana motoba ezalaki kati na yango, elobi molobeli Farham Haq, molandi ya kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres.

“Libulu mosusu na zoto ya babali sambo limonani na mboka Mbogi. Mabulu manso mazwami na pene na kilometres 30 na est ya Bunia, na etuka ya Ituri. Basoda ba kimya bazalaki kotambola mpo na kosala bokengi nsima na kozwa nsango ya bitumba bisalami likolo na bacivili na basimba minduki ba Codeco na suka ya mposo moleki. Ezali ntango yango nde bakutanaki na makambo maye ma somo,” elobi M. Haq.

Mboka mibale bisika mabulu maye makutami ezali pene na ekolo Uganda.

Sango yango epesami ntango société civile ebandi wuto mokolo mwa misato mikolo misato mya botelemisi misala na ntina ya koboya bobomi na Ituri.

“Wuto libandela lya sanza ya yambo, koleka ba civili 80 babomami… Wuto sanza ya zomi na mibale ya 2022, koleka ba civili 195 basi babomami, 68 bazokisamai mpe 84 bamemami ntango ya mobulu mingi mosalamaki na mamangomba ma basimba minduki ba Codeco na ‘Zaïre’ na territoire ya Djugu mpe Mahagi,” elobi Dieudonné Lossa, moyangeli ya société civile na Ituri.

XS
SM
MD
LG