Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Alanga nzembo Tshala Muana awei na mibu 64


Congo singers Koffi Olomide, Tshala Muana and Werrason
Congo singers Koffi Olomide, Tshala Muana and Werrason

Alanga nzembo ya Ekolo Congo démocratique Tshala Mwana awei o’mokolo mwa mposo na mibu 64, esakoli mbulamatari ya mboka na bayi libota lya.

"Tshala Mwana akufi o’mokolo mwa mposo 10 décembre (2022). Tokokanisa makasi ma ye mpo na bayi mboka na ya Afrika. Rumba na ye eye esangana na miziki ya bokoko ya baluba mpe ba nzembo na ye (Lwatuye, Karibu yangu, Nasi nabali na misusu) eteyaka mpe elakisaka nzela," esakoli na Twitter ministère ya Ntoki (Culture, Arts et Patrimoines) ya RDC.

Moninga wa ye oyo bakabolaka bomoi mikolo minso, moyi politiki Claude Mashala mpe asakoli liwa lyango.

"Na ba ngonga ya yambo ya ntongo, Nzambe ya bolingo azwaki mokano ya kozongisa ‘Mamu nationale’ epayi na ye. Tika Nzambe akumama mpo na ntango inso ya malamu (Tshala Mwana) apesaki biso kolekisa awa na nse. Kende malamu Mamu na ngai," ekomi na compte Facebook na ye Claude Mashala.

Basusu ba libota balobi Tshala Muana azwaki nkwokoso na nzoto mpe bamemaki ye na lopitalo na butu epayi akufi.

Wuto mibu miike, Tshala Mwana akomaki kosala banzembo ya politiki, mingi mingi ntango ya maponami.

Ayembelaka Laurent-Désiré Kabila lokola mpe Joseph Kabila, mwana na ye akitanaki na bokonzi.

Kasi nsima na yango akomaki mpe kososola na loyembo bayi bolitiki lokola na nxembo abengaki "Ingratitude" eye ememelaki ye bokangami yambo na kotikama.

XS
SM
MD
LG