Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Soda ya FARDC abomamaki mikolo 10 mileki na Rwanda akundami


Nzoto ya soda akufaki na masasi ya ba soda ba Rwanda na ndelo na RDC ezongisami na Goma, Nord-Kivu, 17 juin 2022.
Nzoto ya soda akufaki na masasi ya ba soda ba Rwanda na ndelo na RDC ezongisami na Goma, Nord-Kivu, 17 juin 2022.

Mampinga na Ekolo Cogno démocratique mapesi losako na soda ya FARDC oyo akufaki na masasi ya bayi Rwanda mikolo zomi mileki. Soda yango na nkombo ya Bebe Mokili Kingombe akufaki nsima na kobeta masasi na ba policier ya Rwanda na ndelo.

Bayi Rwanda balobaki été babomaki nsima na kokota metre ntuku mibale na mitano na ngambo ya Rwanda mpe kobeta masasi kuna.

Misala mya kolendela bokengi na etuka ya Grands mizali kosala boluki mpo na likambo liye lisamaki ntango RDC ezali kokoba kofunda Rwanda kosunga M23 na bitumba mpe Rwanda epamelaka na RDC kopesa maboko na ba FDLR.

XS
SM
MD
LG