Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu akebisi ete masolo ma Nairobi mandimisa RDC ndelo ya sika "Rwanda ebotoli"


Martin Fayulu azali koyanola mituna ya VOA Lingala na Washington DC, 4 juillet 2020. (VOA/Roger Muntu)
Martin Fayulu azali koyanola mituna ya VOA Lingala na Washington DC, 4 juillet 2020. (VOA/Roger Muntu)

Moyi politiki Martin Fayulu, mokambi ya lisanga ECIDE mpe moko na bakambi ba lingomba Lamuka, akebisi mpo na masolo kati na mbulatari ya Ekolo Congo démocratique na batomboki ba M23 masengeli kosalama le 21 novembre ma Nairobi, na Kenya.

M. Fayulu akomi na lisakoli ete misala mya Nairobi mizali nzela ya kondimisa ndelo ya sika na bisika biye Rwanda ebotoli na Ekolo Congo démocratique.

Akundoli ete masolo ma Nairobi malengelami mpo na kozongisa president Felix Tshsiekedi na boyokani ya kimya boye, na mpasi nyonso, bondimisi bobotolami ya mboka. Yango ntina ya bitumba biye, ekomi mwana mboka Fayulu.

Mokonzi ya Ecide afundi mwana mboka Tshisekedi na mbeba ya makasi ya koteka mboka.

M. Fayulu azongaki Kinshasa mokolo mwa eyenga moleki nsima na mobembo molayi na Amerika mpe na Europa. Bayi pulusu bapanzaki balandi baye na molinga mpe lokito na bozongi bwa ye.

XS
SM
MD
LG