Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moyi Maroc Amine Harit azwi mpasi ntango etikali mposo mpo Mondial ebanda


Mosani ya ekolo Maroc na club Olympique Marseille Amine Harit azali kobundana na mpasi na likolo na match na AS Monaco na etando ya masano Louis II, na Monaco, 13 novembre 2022.
Mosani ya ekolo Maroc na club Olympique Marseille Amine Harit azali kobundana na mpasi na likolo na match na AS Monaco na etando ya masano Louis II, na Monaco, 13 novembre 2022.

Ntango etikali kaka mikolo motoba yambo na bobandi ya masano ya Coupe du monde Qatar 2022, Amine Harit ya ekolo Maroc azokaki mokolo mwa eyenga 13 novembre 2022 na match ya club na ye Olympique Marseille na Monaco na chmapionnat ya France.

Olympique Marseille elongaki Monaco mingete misato na mibale.

Amine Harit asilisaki match te mpo abimaki na 58e minute na komemama.

Akumbamaki na lopitalo kasi coach ya Marseille Igor Tudor akanisi ete mpasi mosani oyo azwi ezali makasi mpe ekoki kopekisa ye kobeta Mondial, kasi ekosengala kozela botali ya minganga.

Milieu de terrain Amine Harit azali kati na basani ntuku mibale na motoba selectionneur ya ba Lions d’Atlas ya Maroc Oualid Regragui aponi.

Mondial eye ekoki kozala ya mibale mpo na Amine Harit mpona 2018 abetaki mpo ekolo France.

Motema kobeta mpo na Mané

Na Sénégal mpe lokola, motema mozali kobeta mpo na mpasi Sadio Mabe azwaki na likolo mokolo mwa misato moleki.

Sélectionneur ya ba Lions ya Teranga, Aliou Cissé oyo Fédération ya lisano lya ndembo ya Sénégal ewuti mpe kobakisa mobu moko boyokani bwa yango mpo ete akamab ekipi ya mboka, atiki Sadio Mané kati na basani ntuku mibale na motoba basengeli kobeta Mondial Qatar 2022.

Kasi botali bwa mingami na Baviere, na Autriche, nde bolakisa sokisa Sadio Mané, mosani ya Bayern Munich akokoka solo kobeta Mondial.

Lokola Coupe du monde ezali kobanda… Ba Championnats ya bikolo mingi ekotelemisa.

Kati mpo na mposo misato lokola Europa Ligue, mpe Champion’s League ya Europa.

Mposo moye nde ba ekipi ekobanda kokoma na Watar nsima na kokisa nkombo ya basani ntuku mibale na motoba ya moko moko.

XS
SM
MD
LG