Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mondial Qatar 2022 : Sadio Mané kati na basani ba Sénégal 26, atako azoki


Sadio Mané avandi na nse mpo na kozwa lisalisi lya minganga ntango azalaki kobeta na Liverpool na match na Everton na Anfield, Liverpool, Angleterre, 1er avril 2017.
Sadio Mané avandi na nse mpo na kozwa lisalisi lya minganga ntango azalaki kobeta na Liverpool na match na Everton na Anfield, Liverpool, Angleterre, 1er avril 2017.

Sadio Mané, mosani ya lokumu ya ekipi ya Sénégal azali na nkasa ya nkombo ya basani 26 baye bakobeta na mondial Qatar 2022 eye mokambi to séléctionneur ya ba "Lions de la Teranga", Aliou Cissé abimisi mokolo mwa mitano, atako mobeti ndembo oyo na Bayern Munich (Allemagne) azwaki mpasi na likolo na match eleki ya club na ye.

Aliou Cissé alobi ete azali na elikya ete M. Mané akokoka kobeta.

Sango eye ekitisi moke mitema mya bana ba Sénégal.

“Nasepali kotika ye kati na baninga. Sadio Mané azali mosani ya litomba mingi mpo na biso. Ekosengela kokoba kolendela mpota na ye na kolikyaka ete na mposo mibale to misato manso makokende malamu. Tozali na elikya," elobi Aliou Cissé.

Nzokande, mokambi ya Munich Julian Nagelsmann alobi, na ngambo na ye, ete botali ya minganga boye bokosalama nsima na pene mikolo zomi nde boyebisa soki M. Mané akokoka kobeta.

Mokambi ya Munich akebisi ete akotia M. Mané na likama te atako Sénégal ekolinga ete abeta.

Sénégal ekobanda kobeta na Mondial le 21novembre na match ya yambo na Pays-Bas, nsima na yango le 25 novembre na Qatar mpe le 29 na Equateur,

Soki M. Mané akozela mposo mibela to misato akoka bongo kobeta.

Aliou akundoli mpe ete mibeko ma Fifa mipesi ya nzela ya kotia mosani mosusu kasi ngonga 24 yambo na match ya yambo.

Motambwisi y aba Lions ya Teranga alobi mpe ete sango malamu ezali ete lipaso likosalama te lokola botalisami Sadio Mané asali na minganga na Autriche, na Bavière.

O’mokolo mwa minei moleki, Fédération ya Sénégal ya ndembo ebakisaki mobu moko na boyokani bwa yango na M. Cissé mpo atambwisi lisusu ba Lions ya Teranga.

XS
SM
MD
LG