Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mondial Qatar 2022 : Cameroun etie elikya na Choupo-Moting mpe Anguissa


Basani ba Cameroun, ba "Lions indomptables", yambo na match ya boleki na Mondial na Algérie, na etando ya masano Mustapha Tchaker, na Blida, Algérie, 29 mars 2022. (AFP)
Basani ba Cameroun, ba "Lions indomptables", yambo na match ya boleki na Mondial na Algérie, na etando ya masano Mustapha Tchaker, na Blida, Algérie, 29 mars 2022. (AFP)

Cameroun ebimisi nkombo ya basani ba yango 26 baye bakobeta na Coupe du monde Qatar 2022 eye ekombanda o’mokolo 20 novembre mokoya.

Moyangeli to coah ya ba “Lions indomptables”, mosani ya kala ya ekolo eye Rigobert Song, atie elikya mingi na Frank Zambo Anguissa na Eric Maxim Choupo-Moting baye bazali kobeta malamu mikolo miye.

Eric Maxim Choupo-Moting awuti kotia mingete libwa na ba matches mwambe abeti mikolo miye na club na ye Bayern Munich ya Allemagne.

Franck Zambo Anguissa, oyo azali mosani na milieu de terrain, awuti kolekisa mobu moko malamu na club na ye Naples eye elongaki championnat ya Italie mpe esilisi bongo yambo na groupe na yango na Ligue des champions ya Europa liboso lya Liverpool ya Angleterre.

Rigobert Song azonigisi basani mingi babetaki kino sika na ekipi ya Cameroun baye bapesaki nzela na ba “Lions indomptables” koleka na Mondial na ngonga ya suka, lokola capitaine Vincent Aboubakar, moyambi ya Inter Milan André Onana mpe Karl Toko Ekambi ya Lyon.

Kasi, entraineur ya Cameroun atiki pembeni défenseur Michael Ngadeu ya Gant (France) oyo azali na mibu 31.

Ba Lions indomptables bakobanda mondial eye na match ya yambo ya groupe G na Suisse le 24 novembre.

Bakobeta le 28 novembre na Serbie, mpe le 2 décembre na Brésil.

Cameroun ekomaki na quart de finale ya Mondial 1990 mpe ekomi mbala ya mwambe ebeta Coupe du monde.

Tala basani 26 ba Cameroun mpo na Mondial-2022 :

Gardiens: André Onana (Inter de Milan/ITA), Devis Epassy (Abha/KSA), Simon Ngapandouetnbu (Olympique de Marseille/FRA)

Défenseurs: Faï Collins (Al Taee/KSA), Nicolas Nkoulou (Aris Salonique/GRE), Enzo Ebosse (Udinese/ITA), Olivier Mbaizo (Philadelphia Union/USA), Nouhou Tolo (Seattle Sounders/USA), Jean-Charles Castelletto (Nantes/FRA), Cristopher Wooh (Stade Rennais/FRA)

Milieux de terrain: Samuel Oum Gouet (Malines/BEL), Martin Hongla (Hellas Vérone/ITA), Frank Zambo Anguissa (SSC Naples/ITA), Pierre Kunde Malong (Olympiakos Pirée/GRE), Olivier Ntcham (Swansea/WAL), Gaël Ondoua (Hanovre 96/GER)

Attaquants: Vincent Aboubakar (Al Nasr Riyadh/KSA), Bryan Mbeumo (Brentford/ENG), Jean-Pierre Nsame (Young Boys/SUI), Georges-Kévin N'Koudou (Besiktas/TUR), Moumi Ngamaleu (Dynamo Moscou/RUS), Karl Toko Ekambi (Lyon/FRA), Christian Bassogog (Shanghai Shenhua/CHN), Souaibou Marou (Colombe sportive du Dja et Lobo/CMR), Eric Choupo Moting (Bayern Munich/GER)

XS
SM
MD
LG