Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato babale bakufi nsima na pasteur ya RDC moko koboma mwana wa ye na Bétou (Congo-B)


Ba policiers bazali kokengela "Pasteur Ntumi" na bokomi bwa ye na Brazzaville, 28 décembre 2009.
Ba policiers bazali kokengela "Pasteur Ntumi" na bokomi bwa ye na Brazzaville, 28 décembre 2009.

Bato babale bakufi na mobulu mobimaki nsima na motambwisi mpate moko awuta Ekolo Congo démocratique, ya biyamba ya bolamuki, koboma na kokata kingo mnwa wa ye na mboka Bétou, na Likouala, na Congo-Brazzaville.

Bayi pulusu balobi, na bobombi nkombo, ete mobateli mbate ayebani na nkombo ya Galako akangami na mpo afutami kokata nkingo ya mwana mwa ye ya mibu ntuku mibale na moko (21 ans) mokolo mwa misato moleki.

Motambwisi mpate yango atatoli na bililingi bayi pulusu batie na ba réseaux sociaux ete ayokaki mongongo moko moye alibo ezali ya Nzambe kosenga koboma mwana wa ye.

Banzeneneke bayebisi AFP ete mobateli mpate yango akataki nkingo ya mwana nsima na “koyoka mongongo moko koloba na ye asala mbeka ya monene na ntina ya kokoma moto na nguya”.

Banzeneneke bango balobi balandi babale ba etonga ya motambwisi mpate yango, baye bawuta na RDC, basungaki ye, kasi bazali sika na maboko ma pulusu bango mpe lokola.

Bililingi bya nsomo, bya likambo lyango bitiami na ba réseaux sociaux, bizali kolakisa mwana yango alali kati na makila.

Bana bakelasi ba mwana oyo akufi baye bakendaki kosala mobulu mpo na yango.

Bato babale bakufaki nsima na kozwa masasi, kati na bango moko azalaki mwana ya kelasi moko mpe bato basusu libwa bazokaki na masasi.

Pulusu elobi bolukiluki bozali kosalama.

XS
SM
MD
LG