Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Brazzaville ewangani kondima kopesa esika na ba Wagner ya Russie


Ministre ya mambi ya Bapaya ya Russie, Serguei Lavrov (G) na président Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville, na Oyo, 25 juillet 2022
Ministre ya mambi ya Bapaya ya Russie, Serguei Lavrov (G) na président Denis Sassou N'Guesso ya Congo-Brazzaville, na Oyo, 25 juillet 2022

Congo-Brazzaville ewangi na bokasi bonso ete elingi kopesa nzela na babundi ba Russie ya compagnie ya basimba minduki Wagner mpo bazwa esika ya komitiama na mabele ma yango.

Ministre d’Etat, mokambi ya ndako ya mosala ya president Denis Sassou N’Guesso, Florent Tsiba nde apesi sango yango na koyanolaka na sango epesami na ba media songolo lokola Africa Intelligence.

Ba media yango elobaki ete botiami ya ba Wagner na Congo-Brazzaville bozalaki na masolo kati na president Denis Sassou N’Guesso na ministre ya mambi ya Bapaya ya Russie Serguei Lavrov o’mokolo mwa ntuku mibale na mitano ya sanza ya sambo moleki na Brazzaville.

Mokambi ya ndako ya mosala ya Denis Sassou N’Guesso alobi ezali lokuta mpe akundoli ete Congo-Brazzaville endimaka lisusu te botiami ya misala mya mampinga ya bapaya na mabele ma yango wuto bokangami ya base militaire ya suka ya ekolo France na juillet 1964.

Florent Tsiba akundoli mpe ete boyokani na bikolo bisusu mingi na maye matali mampinga bosalamaka na kolanda malako masengeli.

Ba Wagner bakoma na bikolo biike bya Afrika lokola na Centrafrique mpe na Mali.

XS
SM
MD
LG