Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kufa ya bato 11 na stade de martyrs: Fally Ipupa alobi likama lisamaki ata manso mabongisamaki malamu


Alanga nzembo Fally Ipupa (3e D) azingami na ba policiersm azali koyemba na sate olympique Ebimpe, Abidjan, Côte d'Ivoire, 17 mars 2021.
Alanga nzembo Fally Ipupa (3e D) azingami na ba policiersm azali koyemba na sate olympique Ebimpe, Abidjan, Côte d'Ivoire, 17 mars 2021.

Alanga nzembo Fally Ipupa alobi ayoki motema mawa mpe atindi maloba makobondisa mabota mabye babungisi bomoi bwa bango na mindule apetaki mokolo mwa mposo moleki na stade des Martyrs na Kinshasa.

Koleka bato zomi na moko bakufaki, mingi mingi, na koniatama mpe kotindikama, kolanda motango vice-Premier ministre ministre ya Ntey, Daneil Asselo, apesaki lobi loleki.

Ministre Asselo asengaki mobetisi mindule yango kokende komitika ye moko na maboko ma bayi misala mya bosembo mpo atosaki te malako ma bayi bokengi mpe bulusu na kolekisa motango ya bato bakotaki na miziki myango.

Na maloba akomi na Twitter, Fally Ipupa alobi ata ko mabongisami masalamaki malamu, na botosi malako, meba ekomaki kaka mpe bato bakufi.

XS
SM
MD
LG