Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi akomi Accra nsima na mobembo na Londres


Secrétaire ya Etats-Unis Antony Blinken (G) na président Félix Tshisekedi (D) na masolo na cité ya Union africaine na Kinshasa, RDC, 9 août 2022. (Présidence ya RDC)
Secrétaire ya Etats-Unis Antony Blinken (G) na président Félix Tshisekedi (D) na masolo na cité ya Union africaine na Kinshasa, RDC, 9 août 2022. (Présidence ya RDC)

Président Félix Tshisekedi ya Ekolo Congo démocratique akomi lelo na Accra, engumba mokonzi ya Ghana mpo na mobembo ya mikolo mibale.

Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique azali na masolo na mokokani wa ye ya Ghana, Nana Akufo-Addo, mpo na makambo lokola bitumba na mbongwana ya climat na ntina ya kozwa mayele ma bayi Afrika maye makopesama na likita lya COP27 na sanza ya zomi na moko ekoya na Egypte.

Félix Tshisekedi asali mobembo moye na kowuta Londres, na Royaume-Uni, na Africa Summit 2022.

Kuna, akutaki na Bukigham palace, ndako ya bokonzi ya Royaume-Uni, na nkumu Charles ya misato oyo awuti kokitana na bokonzi nsima na liwa lya mama wa ye Elizabeth ya mibale.

Na Charles ya mmisato, Félix Tshisekedi asololaki mpo etali bitumba na monyele ya Ekolo Congo démocratique mpe asengangi mokonzi ya Royaume-Uni kosalela mpifo na ye na lisanga Commonwealth na ntina ya kosenga Rwanda kotika kopesa maboko na M23 mpe kotika koluka kozwa mabele ma RDC.

Félix Tshisekedi alobelaki mpe makoki ma RDC ya kobimisa petololo kasi ya kokoba kobatelama mokili na nzela ya nzamba na yango.

Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique abengisamaki mpe lobi na likita Institut royal ya mambi ma molongo na Chatham house.

XS
SM
MD
LG