Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Verkys Kiamuangana akufi


Moto moko azali kobeta saxophone na nzela na New York, Etats-Unis, 7 avril 2017.
Moto moko azali kobeta saxophone na nzela na New York, Etats-Unis, 7 avril 2017.

Alanga nzembo Verckys Kiamuangana Mateta akufi o'mokolo mwa minei le 13 octobre 2012 na engumba Kinshasa nsima na bokono.

Azalaki na mibu ntuku sambo na mwambe.

Verckys Kyamwangana azalaka saxophoniste compositeur, directeur, mpe producteur ya miziki monene na ekolo RDC.

Azalaka na lingomba OK Jazz ya Luambo Makiadi, mpe asungaka bokelami bwa mangomba ebele lokola Langa Langa Stars, Choc Stars, Victoria Eleison, Anti Choc, Historia, liboso ete akela orchestre na ye moko na kombo ya "Vévé".

Verckys Kiamuangana Mateta Azalaki patron ya ba écuries "Vévé” mpe mokonzi ya kala ya Société congolaise pour les Droits d'auteur et les Droits voisins (SOCODA).

Asala mpe ba nzembo ebele na kati ya ba nzembo na ye, eye eyebana koleka ezali bongo “Nakomitunaka” .

XS
SM
MD
LG