Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

R. Kelly akatelami mibu 30 mpo na kozwa bilenge basi mpe pasi makasi


Alanga nzembo R. Kelly na bosambisami na ye na Cour pénale ya Leighton, na Chicago, 17 sept. 2019. (Antonio Pérez/Tribune ya Chicago na nzela ya AP, Piscine, Dossier)
Alanga nzembo R. Kelly na bosambisami na ye na Cour pénale ya Leighton, na Chicago, 17 sept. 2019. (Antonio Pérez/Tribune ya Chicago na nzela ya AP, Piscine, Dossier)

Alanga nzembo R. Kelly (Robert Sylvester Kelly) akatelami mibu ntuku misato ya boloko na mbeba ya kozwa basi na makasi, kolanda ekateli ya cour fédérale ya Brooklyn.

R. Kelly na mibu 55 asambaki mpo na kobendaka bilenge basi ya nse mibu 18 mpe basi basusu na kokota na lingomba lya ye mpe kolala na bango na makasi wtuo pene na mibu zomi.

« Balandi basengeli kobatelema na ezaleli ya lolenge loye », elobi zuzi Ann Donnelly.

Basembeli ba R. Kelly basengaki nde mibu 17.

Nasepeli ndenge Robert Sylvester Kelly atiami pembeni mpe akokoka lisusu te kosalama moto mosusu mabe,” elobi moko na bilenge baye bazwamaka na makasi.

Etumbu yango ekitisami mibu mitano na eye tribunal Federal ya Brooklyn ekataki.

XS
SM
MD
LG