Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Museveni asengi bolimisi na Kenya nsima na mwana wa ye kokana kozwa Nairobi


Président ya Uganda Yoweri Museveni (G), pene na mwa na ye gén. Muhoozi Kainerugaba (D2) azo'solola na bakambi ya mampinga ma Sudan ya Sud, Kenya, Somalie mpe Tanzanie na Mbende, na west ya Kampala, 6 septembre 2014.
Président ya Uganda Yoweri Museveni (G), pene na mwa na ye gén. Muhoozi Kainerugaba (D2) azo'solola na bakambi ya mampinga ma Sudan ya Sud, Kenya, Somalie mpe Tanzanie na Mbende, na west ya Kampala, 6 septembre 2014.

Président Yoweri Museveni ya Uganda asengi bolimbisi na bana ba Kenya nsima na mwana wa ye general Muhoozi Kainerugaba, mokonzi ya forces terres ya UDPF, mapinga ma Uganda, kokana na Twitter kosala bitumba mpe kobotola Kenya.

Yoweri Museveni alobi na liyebisi ete atindi maloba ma bolimbisi na mokokani wa ye ya Kenya William Ruto oyo awuti koponama.

General general Muhoozi Kainerugaba, na mibu ntuku minei na mwambe akomaki ete ekosengele kaka na mposo mibale mpo mampinga ma ye mabotola Nairobi, engumba mokonzi ya Kenya.

General general Muhoozi Kainerugaba apamelaki mpe mokonzi ya kala ya Kenya Uhuru Kenyatta na kozanga kopesa nkombo na maponami ma mokonzi ya ekolo Kenya malekaki na sanza ya mwambe eleki.

Ministère ya Défesne ya Uganda esakolaki lobi loleki ete Muhoozi Kainerugaba alongalami mpe soda mosusu nde azwi esika na ye na kokamba mampinga ma mabele ma Uganda, kasi epesi losako na makambo malamu general yango asalaki mpe akoki lisusu kosala.

Addis Abeba to mubulamatari ya Ethiopie mpe ezwa nkanda makasi mpo na maloba Muhoozi Kainerugaba akomaki mikoli mileki na Twitter mpo na kokumisa makasi ya batomboki ba Tigré na Ethiopie.

XS
SM
MD
LG