Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Masasi mabeti pene na ndako ya mokonzi ya ndako na Burkina Faso


Batelemeli basimbi bendele liboso lya basoda baye bakangi nzela na Ouagadougou, Burkina Faso, 30 septembre 2022.
Batelemeli basimbi bendele liboso lya basoda baye bakangi nzela na Ouagadougou, Burkina Faso, 30 septembre 2022.

Masasi mabetami mpe basoda batiani na ekenge bisika mingi na ba nzela ya minene na Ougadougou, engumba mokonzi ya Burkina Faso.

Bato babeti masasi mango bayebani mpenza nanu te.

Kasi lokito loyokani mingi pene na ndako ya mokonzi ya mboka mpe esika bakonzi ya basoda baye babotolaki bokonzi na sanza ya yambo ya mobu moye bazalaka.

Basoda baike bakangi nzela ya minene, mingi mingi eye ememaka na ndako ya etando eke ya mboka mpe etando eke ya mboka etikaki kolakisa mwa ngonga mingi.

Molebeli ya mbulamatari ya Burkina Faso andimi ete matata mazali kati na mampinga kasi masolo mazali kosalama.

Oyo azali sika lokola presindent, lieutenant-colonel Paul-Henri Sandaogo Damiba azali na masolo mango na bato bato, elobi Lionel Bilgo, molobeli ya mbulmatari.

Na ngambo na ye, Lieutenant-General Damiba asengi banamboka kozala na ekenge mpe kotikala kimya, elobi presidence ya Burkina Faso na liyebisi.

Basoda bakweyisaki bokonzi mbala mobu moleki na Burkina Faso.

XS
SM
MD
LG