Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakonzi ba bikolo bya CEDEAO batelemisi Guinée na misala mya lisanga na bango


Lieutenant colonel Mamady Doumbouya (C), mokambi ya basoda babotoli bokonzi ba Guinée, na Conakry, 6 septembe 2021.
Lieutenant colonel Mamady Doumbouya (C), mokambi ya basoda babotoli bokonzi ba Guinée, na Conakry, 6 septembe 2021.

Bakonzi ba bikolo kati na CEDEAO (lisanga lya nkita mpe ntombwa ya bikolo bya Afrika ya ouest) basakoli ete batelemisi Guinée na misala mya lisanga na bango nsima na basoda kobotola bokonzi mpe kokanga présiende Alpha Condé.

"Bakonzi ba bikolo basengi botikami sika oyo ya président Alpha Condé na baye banso bakangami mpe bozongisami ya bokonzi mpe misala mizalaka," elimboli minister ya mambi ya Bapaya ya Burkina Faso, Alpha Barry.

Bakonzi ba bikolo bya CEDAO basanganaki na visioconférence mpo na kotala likambo ya bokweyisami ya bokonzi na Guinée basoda ba Forces spéciales bakambami na colonel Mamady Doumbouya basalaki o'mokolo mwa eyenga.

Basoda baye bakangaki M. Condé, batelemisaki Buku likonzi mpe misala mya mboka.

Bakonzi ba CEDEAO balobi bakotinda limpinga jeudi na Guinée mpo na kosolola na basoda.

Basengi mpe ete Union africaine mpe ONU bandima mokano mwa bango.

Union africaine mpe ONU batelemelaki mpe coup d’état yango.

Kasi colonel Doumbouya alakaki kotia na esika mbulamatari ya kosangisa bato na Guinée.

XS
SM
MD
LG