Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame na Tshisekedi bakokutana na Angola


Président Félix Tshisekedi ya RDC (G) na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame bapesani mbote na Aqaba, Jordanie, 24 mars 2022, (Présidence Rwanda)
Président Félix Tshisekedi ya RDC (G) na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame bapesani mbote na Aqaba, Jordanie, 24 mars 2022, (Présidence Rwanda)

Paul Kagame, mokonzi ya Rwanda, na Félix Tshisekedi ya Ekolo Congo démocratique bakokutana mposo moye na Angola mpo na matata mpe bitumba na ngambo ya ekolo Congo démocratique

Bokutani bwango bokosalama na bokambi bwa mokonzi ya Angola, Joao Lourenço oyo azali kokamba sika CIRGL, likita lya bikolo bya Afrika bya Grands lacs.

Basungi ba président Tshisekedi bandimi ete mokonzi ya RDC azali kokende na Angola kasi balobi te soki ezali mpo na kokutana na mokokani wa Kagame ya Angola.

Bokutani bwango bolosala mokolo mwa mibale 5 juillet 2022 to mwa misato 9 juillet 2022, elobi Reoters.

RDC na Rwanda bazali kofundama mpo na bitumba batomboki ba M23 bazongeli kosala na monyele ya RDC.

President Paul Kagame alobi lelo na biyano na mituna ya bapanzi sango ba television ya ekolo na ye ete azali komilengele na mabe makasi makoki kokoya kati na Ekolo na ye na Ekolo Congo démocratique.

Paul Kagame alimboli ete alakeli nde malamu na bikolo mibale kasi soki malamu makomi te, ye asi amilengeli na mabe.

Apameli bayi RDC kopakolaka bato basusu mbeba na yango moko mpe Monusco kosunga bayi Ekolo Congo démocratique kobundisa, koboma mpe konyokola bana ba mboka na bango moko.

XS
SM
MD
LG