Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Eduardo Dos Santos azali kobela makasi na Barcelone

Former Angolan President Jose Eduardo dos Santos (L) waves during the swearing in ceremony of the new president of Angola on September 26, 2017 in Luanda. - Jose Eduardo dos Santos's 38-year reign over Angola finally came to an end when his hand-picked su

Bokolongono bwa nzoto ya président ya kala ya ekolo Angola, José Eduardo dos Santos, oyo azali na lopitalo na clinique yoko ya engumba Barcelone, na mboka Espagne, ezali malamu te elobi lelo mokambi ya ekolo Angola Joao Lourenço na mboka Portugal epayi wapi azali na mobembo.

José Eduardo dos Santos, mokambi ya kala ya ekolo Angola oyo azali na mibu ntuku sambo na libwa 79, atiamaki na soins intensifs na clinique moko na engumba ya Espagne mposo moleki nsima na bokono bwango kokoma makasi wuto lobi mokolo mwa mibale.

"Kaka minganga na ye nde bakoki koloba mingi kasi tozali kolanda sante na ye na mabanzo makasi" esakoli Joao Lorenco oyo alobi ete asengaki na ministre wa ye ya mambi ya Bapaya Téte Antonio, akende na engumba Barcelone.

M. dos Santos, azali na lopitalo na clinique ya Teknon na engumba Barcelone eye kino sika eboyi kopesa maloba maye matali bokolongo bwa ye.

Bosengeli koyeba ete M. dos Santos, azalaki mokonzi ya ekolo Angola mibu ntuku misato na mineyi, kino président ya lelo Joao Lourenço akitanaki ye na na mobu 2017.

XS
SM
MD
LG