Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Rwanda etindi ba soda 500 na Tchanzu mpe ba M23 bazokisi ba casques bleus basato, elobi FARDC


Mokalo ya bitumba ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique pene na Kimbumba, na nord ya engumba Goma, Nord-Kivu, 25 mai 2022.
Mokalo ya bitumba ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique pene na Kimbumba, na nord ya engumba Goma, Nord-Kivu, 25 mai 2022.

Mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FRADC) masokoli ete Rwanda etindi basoda pene na 500 na mabele ma Congo mpe batomboki ba M23 bazokisi basoda basato ba Monusco.

Sango yango epesami na général Sylvain Bomusa Ekenge, molobeli ya mokambi ya soda ya etuka ya Nord-Kivu.

"Rwanda etindi pene na basoda 500 ya ‘Forces spéciales’ na Tchanzu (Rutshuru / RDC)," elobi na liyebisi gén. Ekenge.

Mpo na ye, "Rwanda ebongoli molato to sokto ya basoda ba yango mpo na komibomba na mabele ma Congo pene na batomboki ba M23".

Basoda 500 baye batindami na Tchanzu bazali "bango banso na molato ya sika ya langi ya mayi ma pondu na moyindo na bikoti (casques) ya Force spéciale," elobi gén. Ekenge.

Molobeli ya mokambi ya soda ya Nord-Kivu alimboli ete mbongwana eye ya molato esalami wuto FARDC ekangaki basoda babale ya Rwanda na sokoto ya mampinga ma ekolo eye.

Gén. Ekenge abakisi ete ba M23, na lisungi lya Rwanda, babundisaki na nko nyonso Monusco na mboka Muhati, pene na Bikenge, na groupement ya Jomba, na Rusthuru, na Nord-Kivu.

"Na Bitumba biye, ba Casques bleus basato ya Tanzanie bazokaki mpe moko kati na bango na mpota ekasi. Ye nde amemami libanda mpo na lisalisi ," elobi gén. Ekenge.

Bitumba bingalaki wuto sika pene mposo misatu kati na ba M23 na FARDC.

Mbulamatari ya RDC ezali kofunda Rwanda kopesa M23 maboko. Rwanda ewangani mpe ezali kopamela RDC kosunga batomboki ba Rwanda ba FDLR (Forces de Libération du Rwanda).

XS
SM
MD
LG