Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Conférence Nil: BC Espoir Fukash elongi match moko, ya suka, 96-92 na Cape Town Tigers


Paul Gasol ya Espagne atie paniers na Jeux olympiques ya Rio 2016, na Brésil, 4 aout 2016.
Paul Gasol ya Espagne atie paniers na Jeux olympiques ya Rio 2016, na Brésil, 4 aout 2016.

BC Espoir Fukash ya Ekolo Congo démocratique elongi match moko, ya suka mpo na yango, 96-92 na Cap Town Tigers ya Afrique du Sud, na conference Nil ya BAL (Basketball Africa Leauge) mardi na Caire.

Ata elongi match yango, BC Espoir Fukash elongwe bongo na edition eye ya BAL mpo esi epolaki na matche minei ebataki yambo.

Mpo na conference Nil, BC Zamalek, molongi ya edition elekaki mobu moleki, nde azali yambo nsima na kolonga ba matchs mitano. Zamalek ezali équipe yay ambo eleki na Plays off.

Elandami na BC Clube Atletico Petroleos ya Luanda (Angola) eye elongaki matches minei. Yango mpe eleki.

Nsima na yango, Cpae Town Tigers ya Afrique du Sud na Forces Armées na Police Basketball ya Cameroun. Bango mpe baleki.

Liboso lya FC Fukash, ezali bongo na Cobra Sports Club ya Soudan ya Sud eye elongaki Fukash.

Cobra Sports Club na Fukash nde balongwe.

Ba équipes mitano eye eleki na Conference Nil, ekonkende kobeta Play off na ba équipes mitano balongaki na Conference Sahara, wuto le 28 kino le 28 mai na Kigali, na Rwanda.

XS
SM
MD
LG