Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

BAL: Bondengwani ya conférence Sahara bobandi


 BAL US Monastir vs Mozambique Beira
BAL US Monastir vs Mozambique Beira

Dakar Université Club ya Senegal na Clube Ferroviario da Beira ya Mozambique baye bakondongwana mardi na Dakar Arena bakokisaki match ya mibale wuto Conference ya Sahara ya Basketball Africa League ebandaki o’mokolo mwa mposo moleki.

Ndenge moko mpe Rwanda Energy Group ya Kigali na Seydou Legacy Athletique Club ya Guinée.

Na match ya bofongwami, Seydou Legacy Athleique Club ebetaki 85-70 Dakar universite Club ya Dakar epayi bondongwami boye bozali kosalama.

Rwanda Energy Group nde elongaki lobi 91-87 Association Sportive de Salé ya Maroc.

Union Sportive Monastirienne ya Tunisie nde elekaki Clube Ferroviario de Beira makasi na 77-71.

Conference eye ya Sahara ekokende kino le 15 mars.

Balongi banei ba yango bakozela kokutana na finale na balongi banei ba conference ya Nile na phase finale ekobetama wuto le 21 kino le 28 mai na Kigali na Rwanda.

Conference nde na Caire na Egypte wuto le 9 kino le 19 avril. Elombe to chmpion ya BAL eye elekaki na 2021, Zamalek ya Egypte, ekozala na conference eye.

Bayi Ekolo Congo démocratique ya FC Espoir Fukash mpe bakozala kuna lokola mpe Cape Town Tigers ya Afrique du Sud, Cobra Sport club ya Soudan du sud, Forces Armées mpe Polices Basketball ya Cameroun na Petro Atletico Petroleos ya Luanda mpe akozala wana.

Kasi lelo, ndenge nini BC Espoir Fukash ya Ekolo Congo démocratique ezali kmilengele. Eyano na sango eye ya Valdo Yamba Yamba.

XS
SM
MD
LG