Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

US Monastirienne ya Tunisie na Rwanda EG bazo'mema masolo


Jean Jacques of the Rwanda Energy Group dribbles the ball during the game against the US Monastir.(Photo by Pape Emir/NBAE via Getty Images)
Jean Jacques of the Rwanda Energy Group dribbles the ball during the game against the US Monastir.(Photo by Pape Emir/NBAE via Getty Images)

Union Sportive Monastirienne ya Tunisie nde ezali komema masolo na Conférence Sahara ya Basketball Africa League eye ezali kobetama wuto le 5 mars na Dakar, engumba mokonzi ya Sénégal.

Kasi esengelaki kozela bondognwami lelo, le 14 mars 2022, kati na Union Sportive Monastirienne na Rwanda energy Group ya Kigali.

Bondongwani ya lelo bozali kosalama na ntango eye kati na Association sportive de Salé ya Maroc na Seydou Legacy Athlétique Club ya Guinée.

Yambo na match ya lelo UnionSportive Monastirienne elongaki match inso minei ebtaki.

Elandami na Seydou Legacy Athléque Club na elonga mibale mpe bokweyisami mibale.

Dakar Université Club ya Sénégal nde elongaki match moko likolo na minei lokola mpe Clube Ferroviairiode Beira ya Mozambique.

Rwanda Energy Groupe ezalaki na elonga mibale kati na match misato ebetaki yambo na ya lelo.

Association Sportive de Salé yango mpe ebeti lelo match na yango ya minei kasi ezalaki kino yambo na yango nae longa kaka moko.

Conference eye ya Sahara ekokende kino le 15 mars.

Balongi banei ba yango bakozela kokutana na finale na balongi banei ba conference ya Nil na phase finale ekobetama wuto le 21 kino le 28 mai na Kigali na Rwanda.

Conference Nil nde ekobetama na Caire na Egypte wuto le 9 kino le 19 avril. Elombe to champion ya BAL eye elekaki na 2021, Zamalek ya Egypte, ekozala na conference Nil.

Bayi Ekolo Congo démocratique ya FC Espoir Fukash mpe bakozala kuna lokola mpe Cape Towan Tigers ya Afrique du Sud, Cobra Sport club ya Soudan du sud, Forces Armées mpe Polices Basketball ya Cameroun na Petro Atletico Petroleos ya Luanda mpe akozala wana. Kasi lelo, ndenge nini BC Espoir Fukash ya Ekolo Congo démocratique ezali kmilengele.

Eyano na sango eye ya Valdo Yamba Yamba.

XS
SM
MD
LG