Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Barrage Mondial Qatar 2022: Ba Léopards ya RDC bakoboli 1-1 na ba Lions ya Atlas


Mbala Mbuta ya ba Léopards ya RDC (G) azali kowelela ballon na El Kaddouri Badr ya ba Lions d'Atlas ya Marox (c) na match ya prépapration ya Coupe d'Afrique des nations, le 9 janvier 2006
Mbala Mbuta ya ba Léopards ya RDC (G) azali kowelela ballon na El Kaddouri Badr ya ba Lions d'Atlas ya Marox (c) na match ya prépapration ya Coupe d'Afrique des nations, le 9 janvier 2006

Ba Léopards ya Ekolo Congo démocratique bakoboli 1-1 na ba Lions d'Atlas ya Maroc na match ya yambo ya barrages ya mondial Qatar 2022 na stade des martyrs na Kinshasa.

Ba Léopards bazwaki match na maboko na mi-temps ya yambo mpe bamonaki nzela ya moniama na 12e minute.

Yaone Wissa ya ba Léopards nde aningisaki moniama na 12e minute.

Match ebongalamaki mwa moke na mi-temps ya mibale.

Ba Lions d'Atlas balamukaki mpe makomisaki match mwa kilo.

Ngambo mibale, basani basika bakotisamaki.

Ba Léoparcs babikaki na 54e minute mpo Ryan Mmaee' ya Maroc akokaki te kotia penalty epesamaki na ba Lions nsima na Cedrick Bakambu ya RDC kosimba ballon na rectangle ya monene.

Na 76e minute, nsima na Cerdrick Bakambu kolongala te kotia mongete, na Lions batindaki ballon mosika ngambo ya moyambi ya na Léopards Kiasumbwa mpe Tarrik Tissoudali atiaki mongete ntango bayi RDC bazalaki kozela arbitre abeta piololo mpo na hors jeu.

1-1, mongete mwango mondimamaki.

Sika ekosengela kozela match ya mibale mardi le 29 mars na Maroc mpo na koyeba nani kati na ba Léopards na ba Lions ya Atlas akoleka na phase finale ya mondial 2022 na Qatar.

Mokonzi ya mboka RDC Félix Tshisekedi azali na match ya stade des martyrs.

XS
SM
MD
LG