Bakeli mibeko baye basali makele mpo likita batambwisi ba Assmblée nationale babengisaki lisalama te.
#RDC_URGENT: Ça se passe à l%27instant au Palais du peuple. Des députés CACH qui cassent tout à l%27intérieur de l%27hémicycle [vidéo] pic.twitter.com/bPwlmDcaah
— Stanis Bujakera Tshiamala (@StanysBujakera) December 7, 2020
Bakeli mibeko ba CACH basili kosangisa manzaka ya bakeli mibeko koleka 250 baye bazali kosenga bolongwi ya motambwisi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda na bureau mobimba.
Mpo na bango, FCC ezali lisusu te na motango ya koleka na bakeli mibeko to majorité lokola président Tshisekedi alobaki yango na lisikulu lya ye lya mokolo mwa eyenga.
Kasi bayi FCC bango balobi bazali kaka na majoirté.
#RDC: Fidèle Likinda, député @pprdofficiel, agressé à son arrivée ce lundi au palais du peuple [vidéo] pic.twitter.com/qs79vN1iB1
— Stanis Bujakera Tshiamala (@StanysBujakera) December 7, 2020
O’libanda ya Palais du Peuple police ebetaki molinga mpo na kobengana balandi ba CACH baye bazali kotindika bakeli mibeko ya CACH.
Bapanzi sango baike bazalaki ntango balandi ba CACH, na UDPS, batindikaki Fidele Likinda ya PPRD mpo na kopekisa kokota na Assemblée nationale.