Tango Four atangami na boteki zamba na kobukaka mobeko
Global Witness esengi na bakonzi ya RDC kosukisa ba contrats nyonso ya bokati zamba, maye masala na kobukaka mobeko. Général Amisi Kumba, "Tango Four", chef d’Etat-major adjoint ya mampinga ya FARDC, atangami na mokanda ya ONG internationale liye mpo na koteka zamba na kobukaka mobeko. Totunaki moko na ba bubundi ya makoki ya bato mpo na nzamba, mokambi ya RIAO, Jean-François Mombia.