Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pene na mbeba 110 esalemelaki bapanzi sango wuto libandela lya 2021 (JED)


Policier moko na nzela na Lubumbashi, Haut-Katanga, 5 décembre 2011.
Policier moko na nzela na Lubumbashi, Haut-Katanga, 5 décembre 2011.

Bapanzi sango ya RDC bazwaki mbeba to ba attaques na motango pene na nkama moko na zomi wuto libandeli lya mobu, elobi Journalste en danger.

Yango ezali 51% ya bemba na nzoto ya bapanzi sango mpe bobangisi boye bozalamaki yambo na bobomi, mbala esusu elobi JED.

"Mobu moye 2021, koleka kati kati ya mbeba etuki bonsomi ya bopanzi sango, toloba 51$, esimbaki nzoto ya bapanzi sango, mpe ezalaki na bobangisi boye bosalamaki mbala esusu yambo na bobomi (ya bapanzi sango)," elakisi JED na rapport na yango.

Bomati ya motango ya ba attaques na baye basalaka na presse bolakisi bobebisami ya bokengi nzinga nzinga ya mosala y aya ba media… (bobebisami bokengi) boye bokomaki kino na bobemami ya bayi media mpe na bobomi basato na bango, ebakisi JED na siki siki.

Atako bilaka bisalamaki mingi na bayi presse, bokonzi ya sika elakisi te bilembo ya makasi mpo na bonsomi ya bopanzi sango, elobi JED.

Nord-Kivu mpe Ituri ezali na état de siège wuto sanza mpo na kosukisa mangomba ya bsaimba minduki.

Mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi atia bakambi ya ba soda.

Na 2020, GED emonaki ete mbeba 116 eye esalamaki na bapanzi sango.

RDC ezali na molongo ya 150 ya bikolo 180 ya bonsomi ya bopanzi sango na 2021, kolanda RSF,

XS
SM
MD
LG