Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bosco Ntaganda azwi etumbu ya mibu 30 na boloko


Bosco Ntaganda ezwui etumbu ya boloko ya mibu tuku misato na CPI (Cour pénale international), La Haye, Pays-Bas, 8 juillet 2019.
Bosco Ntaganda ezwui etumbu ya boloko ya mibu tuku misato na CPI (Cour pénale international), La Haye, Pays-Bas, 8 juillet 2019.

Bosco Ntaganda, moko ya bakambi ya mangambo ya basimba minduki ya kala na bitumba ya etuka ya Ituri, azwui etumbu ya boloko ya mibu tuku misato na CPI (Cour pénale internationale). Mbala ya yambo bazuzi ya CPI bakateli moto etumbu ya monene boye.

Bazuzi bandimaki na sanza ya sambo ete Bosco Ntaganda oyo ayebana mpe na nkombo ya Terminator akweyaki na mbeba zomi na mwambe ya ntango ya bitumba mpe na mbeba ya bozali ya bomoto.

Kati na mbeba yango ezali na kozwa basi to bato na makasi, koboma bato ebele, monyokoli mpe kotinda baton a makasi bisika misusu. Mbeba yango esalamaki na Ituri kati na 2002 na 2003.

Zuzi Rubert Fremr alobi ete M. Ntaganga oyo azali na mibu tuku minei na motoba akozala na boloko mibu tuku misato.

Bakambi basusu mpe ya mangomba ya basimba minduki bazwaki etumbu mpo na Ituri. Lokola Thomas Lubunga, moto ya yambo ya kokangama na CPI

XS
SM
MD
LG