Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mibu zomi ya misala makasi mpo na ministre ya Intérieur ya Kinshasa


Bilili ya bobamami ya mokambi ya lopitalo Vijana na Lingwala na Kinshasa, le 30 octobre 2019. (VOA)
Bilili ya bobamami ya mokambi ya lopitalo Vijana na Lingwala na Kinshasa, le 30 octobre 2019. (VOA)

Haute cour militaire ekateli ministre ya Intérieur Kinshasa Dolly Makambo mibu zomi ya misala makasi na suka ya bosambisi mpo na liwa ya mokambi ya lopitalo Vijana.

Bazuzi balobi ete ministre Makambo asalaki "mbeba ya kotinda basoda to ba policiers kosala mambi matosi te mibeko mpe alima" ya mapinga mpe police.

Motambwisi motuka ya M. Makambo, Serge Kamanda, ye, azwi mpe lokola etumbu ya mibu zomi ya boloko elongo na Bagachuraki Kavusa Semeyi oyo azalaki moko na baye basomba ndambo ya lopango epayi wapi bobomami ya mokambi ya lopitalo Vijana, Belvis Nkunku Ilo ekomaki.

Bafunda mi babale baye bakitisami o’likambo mpo na liwa mpe kokanga na makasi mokambi ya M. Nkunku.

Tribunal ekateli liwa na policier Gaëtan Ekwa oyo abengami na nkombo ya "Ekanga Nyama". Akima wuto liwa ya M. Nkunku. Ye nde afundama kozala mobomi na masasi ya M. Nkunku

Liwa ya M. Nkunku ekomaki le 30 octobre na lopango ya lopitalo Vijana. Azalaki kotelemela bato baye bazali koluka kozwa eteni ya lopango yango. Ba policiers balingaki komema ye mpe bamobebetaki masasi kati na kowelama.

M. Nkunku akufaki kaka na esika wana.

XS
SM
MD
LG