Jonas Savimibi, mokambi ya kala ya Unita, lingomba ya batomboki ya kala ya Angola, atiyami o'lilita o'mokolo ya mposo, mibu 17 nsima ya bobomani na ye na bitumba na mampinga ya ekolo na ye. Bokundami ya Savimbi bozalaki elembo ya boyokani kati na Angola.