Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bikolo bya Europa bindimi kozongela bopesi mangwele ma AstraZeneca


Dr. Nikki Kanani asimbi mangwele ya Oxford University/AstraZeneca ya COVID-19 na esika ya lisungi na Sidcup, Londres, 7 janvier 2021.
Dr. Nikki Kanani asimbi mangwele ya Oxford University/AstraZeneca ya COVID-19 na esika ya lisungi na Sidcup, Londres, 7 janvier 2021.

Bikolo biike bya Europa bindimi kozongela kopesa mangwele ma COVID-19 ma Astrazeneca nsima na Agence ya Europe mpo na mino (EMA) koloba ete mangwele mango mazali mabe te. Kasi Norvège na Suède balobi bakozela nanu.

Allemagne, Italie lokola mpe France basakoli été bakozongela kopesa mangwele mango wuto mokolo mwa mitano 19 mars 2021.

Bakonzi ba Espagne bango basakoli ete bopesi mangwele mango bokozongela o’mokolo mwa misato mokoya.

Na ngambo na bango, Norvège mpe Suède balobi bakozela nanu.

EMA elobi emoni te ete mangwele ma AstraZeneca ezali komema nkwokoso ya makila kokangama lokola limpinga lyoko lya minganga lya Norvège lilobaki.

Bikolo mingi bitelemisaki bopesi mangwele ma AstraZeneca nsima na mafilumelo mibale kokufa na nkwokoso ya makila kolanda bozwi manwegele mango.

EMA lokola mpe OMS (Misala mya molongo mpo na bokolongono) balobaki ete elembo moko te elakisi ete nkwokoso ya makila ya mafimilumelo bango ewutaki solo na mangwele.

Na Afrika, RDC ezali ekolo été etelmisaki mpe bobandi bwa bopesi mangwele mango.

XS
SM
MD
LG