Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato 71 bakufi nsima na explosion ya camion-citerne ya essence na Tanzanie


Soda moko azali kokengela esika moto ya motuka monene mozikisi bato 62 na mboka Mrogoro, Tanzanie, 10 aout 2019.
Soda moko azali kokengela esika moto ya motuka monene mozikisi bato 62 na mboka Mrogoro, Tanzanie, 10 aout 2019.

Bato 71 bakufi nsima na explosion ya camion-citerne na mboka Morogoro, na west ya ya Dar es Salam, na Tanzanie. Mingi kati na bawei bakimaki mbangu kolokota essence ezalaki kobima na motuka monene moye.

Mokambi na police ya engumba mokonzi ya Tanazanie, Dar es Salaam, ayebisi été mibali bazali 58 kati na bawei mpe basi basato. Kolanda maloba maye bato 72 nde bazali kosalisama mpo na mpota na bango lopitalo ya esika eye.

Bilili bizuwami na bisika biye (Twitter #Tanzania) bimonisi motuka monene yango na moto makasi mpe molinga moyindo mingi elongo na nzoto ya bato eziki na eye etakali na nzoto esusu.

Likama ya lolengo loye lisalamaki na Congo democratique RDC mbala mingi. Le 6 octobre 2018, bato 53 bakufaki mpe na moto mobimaki nsima na botutani ya camion-citerne na motuka mosusu na Kongocentral. Le 2 juillet 2010, bato 292 basusu bakufaki mpe lokola na moto mobimaki nsima na likama ya camion-ceterne na Sange, na Sud-Kivu.

XS
SM
MD
LG