Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Donald Trump alobi Gaza ekoma “protectorat” ya Ekolo Amerika


Mokonzi ya Ekolo Amerika Donald Trump azali koyanola na bapanzi nsango na bokutani na ministre wa Yambo ya Israel Benjamin Netanyahu na Washinton D.C., 4 sanza ya mibale 2025. . (Photo by ANDREW CABALLERO-REYNOLDS / AFP)
Mokonzi ya Ekolo Amerika Donald Trump azali koyanola na bapanzi nsango na bokutani na ministre wa Yambo ya Israel Benjamin Netanyahu na Washinton D.C., 4 sanza ya mibale 2025. . (Photo by ANDREW CABALLERO-REYNOLDS / AFP)

Bikolo mingi mpe mabongisi mingi na molongo bapameli makanisi ma Donald Trump mokonzi ya Ekolo Amerika ya kolongola bavandi banso na etando ya Gaza mpe kokomisa yango esika ebatelamaka na Ekolo Amerika na ntina ya kosukisa matata kati na Hamas na Israel.

Bikolo misusu bizongeli kolobela makanisi ma bango ya kozala na ba états mibale na esika yango.

Donald Trump asengi ete bavandi ba Gaza batindama na Jordanie mpe Epyte kasi bikolo biye bibale biboyi yango. Bayi ONU balobi bakweme na makanisi ma Donald Trump.

"Bato banso basepeli na makanisi ma nga,” elobi Donald Trump na bapanzi nsango wuta bureau ovale na Maison Blanche, na Washington D.C.

Kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres akebisi mpo na "nettoyage ethnique" (kosilisa bato ba kabila esusu) bokoki kosala nsima na bosenga ya Donlad Trump.

Ministre ya mambi ya Bapaya ya Allemagne, Annalena Baerbock akomi na liyebisi été "Gaza ezali ya bayi Palestine".

Forum

XS
SM
MD
LG