Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pene na bato nkoto minei na nkama mitano bakufi na SIDA na Kinshasa mobu moleki


Mama moko amemi mwana azali na kolokoto to "Monkeypox" na Kaka, Centrafrique, 18 octobre 2018.
Mama moko amemi mwana azali na kolokoto to "Monkeypox" na Kaka, Centrafrique, 18 octobre 2018.

Pene na bato nkoto minei na nkama mitano bakufi na SIDA kati na pene na nkoto ntuku mibale na motoba baye bazwamaki na nyama eye ebebisaka bokolongona bwa nzoto, na Kinshasa, mobu moleki. Nsango yango epesami na kalaka motambwisi ya PNMLS (Linaka lya ekolo lya mambi mingi matali bitumba na SIDA) Dr Patrick Kanga oyo asengi bobakisami bwa makoki mpe misolo na ngambo ya mbulamatari mpo na kobandela lisusu boyebi ya bato babikaka na virus ya Sida, ba PVV. Akundoli ete mokumba moye mosundolama na basungi ba libanda. Dr. Patrick Kanga alobi ete bato baike bazali kotambola na nyama ya sida na nzoto na Kinshasa kasi bayebi te mpo batalisaka nzoto te.

Forum

XS
SM
MD
LG