Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Assemblée nat. ezwi mokano ya kotiya misala mikotala bosenga ya Procureur general ya Cour ya Cassation mpo na Nicolas Kazadi


Bakeli mibeko na ndako ya makita ya Assemblée nationale na Kinshasa, RDC, 15 décembre 2012.
Bakeli mibeko na ndako ya makita ya Assemblée nationale na Kinshasa, RDC, 15 décembre 2012.

Assemblée nationale ezwi mokano lelo ya kotiya na esika misala mikotala bosenga ya Procureur general ya Cour ya Cassation mpo na babndi bolukiluki likolo na Nicolas Kazadi, ministre ya Finaces to ya mambi ma misolo ya mbulamatari eye elongwe

na ministre oyo akoma mokeli mibeko na ministre ya mbulamatari elongwe ya développement trural na likambo litala bomatitis ntalo ya biloko na ba factures ya ba lampadaires to mwinda na mabululu ma mamayi ma komela.

Ezali mokano mwa yango suku ya nse ya ndako ya bokeli mibeko ezwi nsima na bobonami ya Vital Kamerhe bo’ mokambi na yango.

Procureur gerenal ya Cour ya cassation Firmin Mvonde asengaki wuta mokolo mwa ntuku mibale na sambo ya sanza ya minei eleki bofungolami ya boyoki ba ministres baye bakala mpo likambo lyango.

Forum

XS
SM
MD
LG