Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CENCO na mangomba misusu bazali kati na mingongo mizali kokoba kotombolama nsima na bomeki kokweyisa bokonzi na RDC.


Cardinal Fridolin Ambongo pene na Abbé Donatien Nshole, kalaka mokonzi ya CENCO nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Cardinal Fridolin Ambongo pene na Abbé Donatien Nshole, kalaka mokonzi ya CENCO nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)

CENCO, Union africain, SADC, NCSS lokola mpe Adolphe Mozito bazali kati na mingongo mizali kokoba kotombolama nsima na bomeki kokweyisa bokonzi na RDC. CENCO, likita lya ba episkopo ya RDC epameli mobulu moye momeki kufa na bato mpe elimboli ete ata ko Christian Malanga amonanaki na bilili biike na boko na ba episkopo yango elobi te ete azali na boyokani na bakambi ba eklezia. Moyi politiki Adoplphe Muzito, moyi oppoition mpe mokambi ya Nouvel Elan, ye amituni nde mpasi ya bayi mboka ya mpmba ekozala makasi ndenge nini. Nouvelle societe civile esengi na ngambo na yango ete mokonzi ya ekolo Felix Tshisekedi alongola na mosala bakambi ba bokengi, bobateli ekolo mpe ya misala mya mibembo. Yango esangamaki mpe lobi loleki na mabongisi ACAJ. Union africaine mpe epamaliki mobulu moye lobi loleki.

Forum

XS
SM
MD
LG