Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fardc ezali kosepela mokolo ya mbongwana mpe ya mampinga


Président Félix Tshisekedi kati na commandants ya ba opérations ya FARDC nsima na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshsa, RDC, 10 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi kati na commandants ya ba opérations ya FARDC nsima na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshsa, RDC, 10 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Mampinga ma ekolo Congo democratiki mizali kosepela lelo mokoloo ya mbongwana mpe ya mampinga to na lopoto Journée de la revolution et des Forces armées eye ebongisama wuto 2019. Mokolo moye ezalaki liboso kosepelama lokola “feti ya bonsomi” to fête de la liberation, na bolandi bokoti na engumba Kinshasa ya Alliance ya mampinga democratiki po na bonsomi ya Congo, to AFDL. Lisanga moko ya batomboki liye likweyisaki maréchal Mobutu. Wuto 2019 likanisi liye lipesamaki na Fardc. Na mokolo yango ya le 17 mai, to lobi loleki, commandant ya misala ya communication ya mampinga ya Fardc, général Léon Kasonga, amonisaki ete basoda bazali basali ya suka ya bayi mboka ya ekolo Congo.

Forum

XS
SM
MD
LG