Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe ekobaki, mokolo mua mitano moleki bosambisami ya moyi opposition Mike Mukebayi na boloko CPRK/Makala.


Mike Mukebayi (simisi ye pembe), ntoma ya etuka ya Kinshasa akangemi mpe amemami na boloko ya Makala, Kinshasa, 16 septembre 2019. (Serge Fikiri Kitongo)
Mike Mukebayi (simisi ye pembe), ntoma ya etuka ya Kinshasa akangemi mpe amemami na boloko ya Makala, Kinshasa, 16 septembre 2019. (Serge Fikiri Kitongo)

Na milulu ya bosambisami, basambeli ya mofundami basengi bobimisami ya mua ntango, na ntina ete bokimi na ye bozalaki yako bangela te, esakolaki na Actualite.cd, maître Christian Emango, mosambeli ya Mukebayi. Eyano ya Cour d’appel ezelami kobanda lelo kino mokolo mua misato engebene na bato ebele baye bayebi makambo maye. Bosambisami ya mbala ekoya elengelami mpo na mokolo mua ntuku misato na yoko ya sanza ya mitano ya 2024. Moko ya lingomba politiki Ensemble pour la République ya Moìse Katumbi, Mukebayi akangemaki wuto mokolo mua ntuku mibale na misato ya sanza ya mitano na boloko ya Makala, ekosala sika mobu yoko wuto akangemi. Bokangebi ya Mukebayi esalemaki sima ya bopesi maboko na libota ya muana moko ya mukie oyo azuamaki na likama ya bitumba nan tango ya botamboli to ba manifestations ya opposition mokolo ya ntuku mibale ya sanza ya mitano moleki, eye etambuisamaki na Martin Fayulu, Moïse Katumbi, Matata Ponyo mpe Delly Sesanga. Ba manifestations biye bipanzamaki na nkanda mpenza na ba pulusu, miye misalaki ba mbeba ebele mpe bato mingi bazokaki.

Forum

XS
SM
MD
LG