Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Obus moko ezokisi mwasi moko na Sake


Likalo lyoko lya mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) na bitumba na Kanyarucinya, na 10 km na Goma, Nord-Kivu, 17 sanza ya sambo 2013.
Likalo lyoko lya mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) na bitumba na Kanyarucinya, na 10 km na Goma, Nord-Kivu, 17 sanza ya sambo 2013.

Obus moko ekweyi na Sake, pene na 25 km na Nord-west ya Goma, mpe ezokisi mwasi moko, na bitumba kati na mampinga ma Ekolo Congo démocratique (FARDC) na ba M23, batomboki baye bafundamaka kozwa lisungi lya mampinga ma Rwanda (RDF).

Monusco, Misala mya ONU na RDC, elobi ete FARDC nde ebetaki obus eye kasi yango ekendaki kokweya esika ya mabe.

FARDC na ngambo na yango epameli nde M23 na RDF kobeta obus yango.

“Obus ya FARDC ekweyaki na bisika bato bavandaka pene na Wenze ya Sake,” elakisi mokanda moko ya kati ya Monusco moye mobakisi ete mwasi moko azoki.

“M23/RDF ewuti kobeta na bokangi miso ba bombes ya Mortier 120 na mboka ya Sake eye etonda bato, na territoire ya Masisi,” ekomi lieutenant-colonel Guillaume Ndjike, molobeli ya mampinga ya moyangeli ya soda ya Nord-Kivu na compte na ye X.

Lokito ya ba obus ebele loyokanaki na Goma o’mokolo mwa mitano.

Forum

XS
SM
MD
LG