Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba "candidats présindentiels" ya opposition bayokani te ata bakeli "Congo ya Makasi" na Pretoria


Moïse Katumbi na Martin Fayulu bayambani na libanda ya mpepo ya Luano, Lubumbashi, 29 juillet 2019.
Moïse Katumbi na Martin Fayulu bayambani na libanda ya mpepo ya Luano, Lubumbashi, 29 juillet 2019.

Balakisi bilongi ya baike ya bayi opposition ya Ekolo Congo democratique bayokani nanu te mpo na kondima kaka nkombo moko na mapongami ma mokonzi ya mboka ata ko bakeli lisanga libengami "Congo ya Makasi" na bokutani boye balakisi bilongi ba bango bazalaki kosala wuta libandela lya mposo na Pretoria, na Afrika ya Ngele.

Moko na bango, Martin Fayulu azali kutu te kati na "Congo ya Makasi" ewuti kokelama.

Balakisi bilongi ya Moise Katumbi, Denis Mukwege, Martin Fayulu, Augustin Matata na Dely Sesanga bazalaki na masolo mango.

"Toyokani mpo na lisanga lyoko kasi tokokoba masolo mpo na kokende na maponami elongo," eyanoli Dr. Denis Mukwege, mbano ya Nobel ya 2018, na mituna mya radio TopCongo FM na Kinshasa.

Molobeli ya Martin Fayulu, Alex Andende Lexxus ayebisi VOA Lingala ete mokonzi ya lingomba lya ye, Ecide, atie manzaka te na boyokani ya bayi oppositon basusu baye bakobaki masolo na ngambo esusu.

"Martin Fayulu nde akoki na malako manso matiamaki na esika na Afrika ya Ngele kasi basusu babimisaki makambo masusu nsima na malako mango mpe batikalaki ngambo na bango. Martin Fayulu mpe akendaki ngambo na ye," ebakisi Alex Andende.

Kolanda maloba ma Alex Andende, M. Fayulu alobi, lokola basusu baye bazali kowelela maponami maye, ete ekuke nanu ekangami te.

Campagne életorale to bobeti ntangwa na maponami esengeli kobanda mokolo mwa eyenga (20 ya sanza ya zomi na moko 2023) na etando mobimba ya RDC longola na Ruthsuru mpe Masisi, na monyele ya mboka epayi bitumba na batomboki ba M23 bizali kosalama.

Forum

XS
SM
MD
LG