Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi, mokambi ya SADC asengi bolongwi bwa etumbu likolo na Zibambwe


président Félix Tshisekedi ya RDC na likita lya bakambi ba SADC na Maputo, Mozambique, 23 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC)
président Félix Tshisekedi ya RDC na likita lya bakambi ba SADC na Maputo, Mozambique, 23 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Na bokambami ya Félix Tshisekedi mokonzi ya Ekolo Congo démocratique, SADC, lisanga lya ntombwa lya bikolo bya Afrika ya nse, esengi bolongolami, na bozeli te, ya bitumbu binso bipesama na Zimbabwe mpe na bana mboka eye.

Liyebisi litiami manzaka na Félix Tshisekedi lilobi ete SADC emitungisami mingi na maloba masakolaka ete bitumbu byango bipesama kaka bato balandelamaka.

SADC epameli mbano ya bitumbu biye na ekolo mobimba eye etalamaka mabe na mokili mobimba mpe bisika mombongo to bosombitinyi ya molongo bosalamaka.

Yango ezali epekiselo mpo na bakeli misala ya bapaya, misolo mikoki kowuta libanda mpo na ntombwa ya ekolo. Felix Tshisekedi akundoli ete Zimbawe ekozala na maponami na kati kati ya mobu 2023.

XS
SM
MD
LG