Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto moko akufi mpe 11 bazoki na roquette ebeti na stade de l’Unité na Goma


Momemi tuku tuku azali kobunda na moyi pulusu moko na bokoti bwa libanda lya masona ya Unité na Goma, Nord-Kivu, 16 sanza ya zomi na mibale 2018
Momemi tuku tuku azali kobunda na moyi pulusu moko na bokoti bwa libanda lya masona ya Unité na Goma, Nord-Kivu, 16 sanza ya zomi na mibale 2018

Moto moko akufi mpe 11 mosusu bazoki nsima na soda moko kobeta na libunga roquette moko na libanda lya masano ya Unité na Goma, na Nord-Kivu, o mokolo mwa minei.

Lieutenant-colonel Guillaume Ndjike, molobeli ya mokambi ya soda ya Nord-Kivu, alobi ete likama lyango lisalamaki ntango soda yango abetaki na libunga RPG nsima na motuka mozali komema ye endendaki na libulu pene na stade nsima ya nzanga.

Bato zomi na mibale bazokaki mpe moko akufaki.

Moko na bavandi ba bisika biye, Prince Mumbere atatoli été amonaki basani bandembo baye bazokaki komema na lopitalo na tuku tuku.

Ezalaki ntango FC Likonzi na FC Goal balaki komilengele mpo na kobanda linsano mpo na championnat local. Bato baike bazoki mpe bamemami na lobitalo kolanda banzeneneke.

Forum

XS
SM
MD
LG