Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FARDC na UPDF basakoli ete babomi mokambi ya ba ADF "Punisher"


Basoda ba mampinga ma RDC (FARDC) na nzamba mpo na kobundisa eleongo batomboki ba ADF na parc ya national ya Virunga, Nord-Kivut, 14 décembre 2021.
Basoda ba mampinga ma RDC (FARDC) na nzamba mpo na kobundisa eleongo batomboki ba ADF na parc ya national ya Virunga, Nord-Kivut, 14 décembre 2021.

Mampinga ma ekolo Congo democratique masakoli été mabomi mokambi ya batomboki ADF Meddie Nkalubo oyo ayebanaki na nkombo ya "Punisher".

Molobeli mya misala mya FARDC Sokola 1 alobi été Punisher akufaki ntango mampinga mabetaki bibundeli bya likolo na bisika binei bisimbamaki na ba ADF na butu ya kotando lobi mokolo mwa eyenga pene na ndelo na Uganda.

Mokonzi ya ekolo Ugnda Yoweri Museveni mpe asakoli liwa lya mokambi ya ADF, na mokanda akomeli na bana mboka na ye.

Museveni apemeli Medie Nkalubo koboma bato ntuku misato na sambo mpe kozokisa bayi pulusu ntuku mibale na sambo na 2021 na Uganda.

Meddie Nkalubo azalaki kopanza nsango ya va ADF na ba video mpe kopesa mitindo mpe kotaumbwisa ba drones ya ADF.

Forum

XS
SM
MD
LG