Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

RDC: Bato koleka Libwa babomami na ba ADF na territoire ya Beni o etuka ya Nord Kivu


DRCONGO-ITURI-MASSACRE-MASSGRAVE
DRCONGO-ITURI-MASSACRE-MASSGRAVE

Ba civils libwa babomami lobi mokolo mwa mineyi moleki na mpokwa na na mboka Museya Kanyamutsutsa, na territoire ya Beni, Nord-Kivu, na Est ya République démocratique ya Congo, na baye bamonani kozala ba dongolo miso ba lingomba ba ADF, batomboki baye bazali na boyokani na groupe Etat islamique.

Kolanda Baromètre ya sécurité ya Kivu (KST), réseau ya ba analystes oyo ezali na est ya RDC, eye epesi sango eye, moto moko azoki mpe bato bayike bazali komonana te.

Motango mwa bato baye bakufi endimami na Delphin Maleki, vice-président ya société civile locale, Kolanda ye, ko longola baye bazwami mpe ba memami na bisika biyebani te, bazuaki mpe bibwele mpe bislaleli biyike bya bayi mboka. Abakisi ete, na kati ya bato baye babomami ezali bongo mibali motoba mpe basi minei", bato baye babomami mingi mingi na bibundeli ya mbeli mpe makwangola.

"Bayibi bantaba, nsoso, bilamba" mpe ba magasins epunzami, ebakisi ye.

"Tozali kokweisa bobomami boye ya libela, tosengi bokengi ya ba populations na biso", esakoli M. Maleki, na mawa mpo mampinga ya ma bokengi masalaki mosla na bango na ntango esengeli te, ata ko basoda ba FRADC na baye ba ekolo Ouganda bazali kaka na ba kilomètres misato epayi likama liye lisalemi.

Mampinga ma bikolo biye mibale masangana na eteni ya nord ya Nord Kivu mpe na etuka ya pembeni ya Ituri wuto suka ya mobu 2021 mpo na kobundisa bayi ADF.

Kolanda kaka manaka ma KST, ba civils 15 ba bomamaki na mpokwa o mokolo mwa le 27 mai moleki na mboka misato mpe pene na zomi na mitano basusu ba bomamaka le 19 mai na localité mosusu lisusu.

Forum

XS
SM
MD
LG