Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fortunat Biselele atikami


Fortunat Biselele (R) mopesi toli ya lokumu ya pembeni ya mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi, na Aqaba, Jordanie, 23 sanza ya misato 2022. (Présidence de la RDC)
Fortunat Biselele (R) mopesi toli ya lokumu ya pembeni ya mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi, na Aqaba, Jordanie, 23 sanza ya misato 2022. (Présidence de la RDC)

Fortunat Biselele, mopesi toli ya kala ya pembeni ya mokonzi ya Ekolo Congo démocratique Félix Tshisekedi, atikami lelo nsima na mokano mwa bazuzi na bosambisami bwa ye na Tribunal ya grande instance ya Kinshasa-Gombe mpo na koteka mboka.

Botikami bwango bondimami na basambeli bwa ye.

Moko kati na bango, Me Richard Bondo alobi ete tribunal emoni ete makambo afundamaki na yango mandimami te.

Fortunat Bisele atindamaka na boloko bonene CPRK/Makala wuta mokolo mwa ntuku mibale ya sanza ya yambo ya 2023 na kofundama mpo na kotia bokengi ya ekolo na mbeba, koteka mboka mpe kobimisa makelele ma lokuta.

Ezalaki mpo na kozala na boyokani na bayi M23 mpe mokonzi ya ekolo Rwanda Paul Kagame.

Mikolo mileki, bilili bya Fortunat Biselele kosangisaka nzoto na basi kati na bato ebele, bitambolaki na ba reseaux sociaux ntango ye azalaki na bokangami.

Basambeli ba ye na mabongisimi masusu ma makoki ma bomoto bapamelaki misala mya bokongengi kotambola likolo likolo ba bomoi bwa ye ya nkunku na kobimisaka bililingi biye bizwamaki na telephone na ye.

Forum

XS
SM
MD
LG