Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bosambisami bwa Salomon Kalonda bokobanda jeudi na Kinshasa


Salomon Idi Kalonda, mopesi toli ya Moïse Katumbi, ba bokutani ya Africa CEO Awards na Abidjan, Côte d'ivoire, 10 janvier 2016. (Facebook/Salomon Kalonda Eskadela)
Salomon Idi Kalonda, mopesi toli ya Moïse Katumbi, ba bokutani ya Africa CEO Awards na Abidjan, Côte d'ivoire, 10 janvier 2016. (Facebook/Salomon Kalonda Eskadela)

Bosambi ya Salomon Kalonda Idi, mopesi toli ya moyi opposition Moïse Katumbi ya Ensemble pour la republique bokobanda mokolo mwa minei mokoya, mokolo mwa zomi na sambo ya sanza eye ya mwambe, na Cur militaire ya Gombe na Kinshasa.

Salomon Kalonda Idi akangamaki o’mokolo mwa ntuku misato ua sanza ya mitano na libanda lya mpepo ya N’Djili.

Afundami kotinda basoda basoda kotomboka mpe mpo na kozwama nan a manduki mpe masasi ya bitumba, lokola mpe koluka kobebisa bokengi ya ekolo na kozalaka na boyokani na Rwanda mpe batomboki ba M23.

Basambeli ba ye bawanganaka yango mpe bafundaka mbeba na bokangami bwa ye.

Forum

XS
SM
MD
LG