Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mibu misato mya boloko misengami mpo na Kabund


Jean-Marc Kabund (C), mokambi ya kala UDPS, lingomba lya président Félix Tshisekedi pene na Limete, Kinshasa, 8 janvier 2019.
Jean-Marc Kabund (C), mokambi ya kala UDPS, lingomba lya président Félix Tshisekedi pene na Limete, Kinshasa, 8 janvier 2019.

Mibu misato mya boloko misengami mpo na Jean-Marc Kabund mokambi ya kala ya UDPS, lingomba lya mokonzi ya mboka Felix Tshisekedi, na bosambisami bwa ye mpo na kofinga mokonzi ya ekolo, kokosela ya mangombo mpe kotinda baike na botomboki.

Ministere public esengi mibu misato mya boloko mpo na Jean-Marc Kabund oyo asakolaka été azali moyi ngambo ya opposition mpe akelaki lingomba lya poliki lya ye moko mobu moleki. Na ngambo na bango, basambeli ba Jean-Marc Kabund basengi nde botikami bwa ye.

Cour ya cassation ekopesa ekateli na yango o’mokolo mwa motoba ya sanza ya libwa. Bosambisami bwango bomemamaki na CPRK to boloko bonene ya Makala nsima na bazuzi komona été makambo mingi mazalaki kobima libanda na bosambami bozalaki kosalama na N’Dolo.

Na bofundami zomi na mibale bozalaki likolo lya Jean-Kabund Ministere public endimi kaka misato

Forum

XS
SM
MD
LG