Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etumbu ya liwa ekatelami mpo na boko bato bazalaki kokanga mpe komema basusu bisika mabe na Kinshasa


Bakangami balimbisami na boloko ya CPRK / Makala na Kinshasa, na ekolo Congo démocratique (RDC), le 8 janvier 2021. (Fɔtɔ́ ya Arsene Mpiana / AFP)
Bakangami balimbisami na boloko ya CPRK / Makala na Kinshasa, na ekolo Congo démocratique (RDC), le 8 janvier 2021. (Fɔtɔ́ ya Arsene Mpiana / AFP)

Etumbu ya liwa ekatelamaki lobi na butu na boko kati na bato ntuku mibale na mwambe bazalaki kosamba na tribunal ya Grande instance ya Kinshasa/Gombe mpo na kokangaka mpe komemaka bato basusu bisika mabe.

Etumbu ya liwa lya ekatelami na bato mabe batano baye basambaki baye bakweyisami o'likambo mpo na lisanga lya bato mabe mpe koyibaka na kosalelaka bibundeli.

Na RDC, etumbu ya liwa etiamaka lisusu na mosala mpe etlemisa wuta mibu mingi.

Basusu batikali kati na bato baye bazalaki kosamba nde bapesami etumbu ya mibu zomi ya misala makasi mpe lompando ya francs congolais million mitano.

Bazuzi bakweyisi bango na likambo mpo na koyiba na bibundeli mpe bobeta mpe kozokisa bato. Moko na bango apesami etumbu mpo na koluka kozwa basi na makasi.

Bakonzi ba Ekolo Congno démocratique baboyaki kondima nungu nungu elobi ete mombongo ya biteni bya nzoto ya bato mozali kosala.

Molobeli ya mbulamatari ya RDC, Patrick Muyaya alobaki ezali bato baye balingi kopekisa bosalami bwa Masano ma mbala ya libwa ya Francophonie mpe ya maponami nde bazali nsima na bato baye.

Forum

XS
SM
MD
LG