Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

RDC: Nsima kofundama mpo na kopengwisa misolo mwa Covid 19, ministre ya kala Eteni Longondo alongolami na etumbu


The Minister of Health announces a first case of Covid 19 in the DRC, in the capital Kinshasa
The Minister of Health announces a first case of Covid 19 in the DRC, in the capital Kinshasa

Eteni Longondo ministre ya kala ya bokolongono na ekolo Congo Democratique oyo afundamaka mpo na kopengwisa mosolo mwa bokono bwa Covoid 19 na mobu 2021 awuti bongo kotikama kolandelama na misala mya bosembo ma ekolo RDC.

Eteni Longondo, oyo azalaka ministre ya bokolongono kobanda mobu 2019 kino 2021 akangamaka mposo misato mpe atikamaka mpo na mwa ntango sima kofundama na misala mya Inspection générale des finances (IGF) na kopengwisa mosolo koleka ba million sambo moye mopesamaka na mbula matari mpo na kobundisa bokono Bwa Covid 19.

Nsima ye kokangama mposo misato na sanza mwambe ya mobu 2021, M. Longondo, atikamaka mpo na mwa ntango moke to mpe azuaka liberte provisoire. Kino Sika, awanganaka kozala nsima ya bopengwisi mosolo mona.

" A tikami lelo na Cour de cassation, mpo na bozangi bilembo bya solo boye bozali kolakisa ete apengwisa mosolo moye” esakoli mosambeli na ye Me Hugues Pulusi Eka.

Forum

XS
SM
MD
LG