Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Elenge mobali moko mobeti ndembo awuta RDC abomami na masasi na Kentucky


Bandeko ba Dan Likiko, mobeti ndembo na ekipi ya eteyelo bilenge babali ya secondaire ya comté ya Boone (basimbi elili ya ndeko na bango abomami na masasi na Florence, Kentucky, USA, 22 sanza ya minei 2023. (Twitter/Madeline Ottilie)
Bandeko ba Dan Likiko, mobeti ndembo na ekipi ya eteyelo bilenge babali ya secondaire ya comté ya Boone (basimbi elili ya ndeko na bango abomami na masasi na Florence, Kentucky, USA, 22 sanza ya minei 2023. (Twitter/Madeline Ottilie)

Dan Likiko, elenge mobali awuta Ekolo Congo démocratique, akufi nsima na kobetama masasi mokolo mwa mposo moleki pene na ndako ya baboti baye na Florence, na état ya Kentucky.

Police ya Kentucky elobi ekutaki ye akufa na kobeta masasi mbala mingi, na kiti ya mokumbi, na motuka mwa ye, na esika ebengami Winthrop Circle, epayi bayi pulusu bakomaki nsima na kobengama mpo na bitumba.

Dan Likoko azalaki na mibu 21, mpe azalaki kobeta ndembo mpo na ekipi ya eteyelo bilenge babali ya secondaire ya comté ya Boone (Boone Country High School Boys).

Police ekangi mobali moko ya mibu 38 na nkombo ya Wayne Haggard noyo andimi ete abetaki Dan Likito masasi mpe abomaki na bitumba.

Bolukiluki bozali kosalama.

Kasi bayi libota lya Dan Likiko, lokola leki na ye Romuald Likiko, bandimi te ete ndeko to mwana na bango abundisaki moto moko to aswanaki mpo azalaki na ezaleli ena te.

Dan Likiko akomaki na Etats-Unis na baboti mpe bandeko baye ba libota mibu miike mileki na elikya ya koluka bomoi bolamu.

Forum

XS
SM
MD
LG